Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Masese 13:1-17

Masese 13:1-17 MNB

Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te. Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu. Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi. Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka. Moto ya sembo ayinaka maloba ya lokuta, kasi moto mabe amiyinisaka mpe apanzaka soni. Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu. Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi. Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te. Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka. Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya. Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele. Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi. Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti. Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa. Boyebi ememelaka bato ngolu, kasi nzela ya bato oyo babukaka mibeko ezalaka pasi. Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye. Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.