Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke. Lokuta ezalaka kati na mitema ya bato oyo basalaka mabongisi ya mabe, kasi esengo ezali mpo na bato oyo bakopesaka batoli ya kimia. Mabe moko te ekokomela bayengebene, kasi bato mabe bakotondisama na pasi. Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye. Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba. Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu. Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto. Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe. Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene. Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.
Tanga Masese 12
Yoka Masese 12
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 12:19-28
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo