Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Masese 12:1-18

Masese 12:1-18 MNB

Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba. Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu. Motema mabe elendisaka moto te ; mosisa ya bato ya sembo ekatanaka te. Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa. Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta. Maloba ya bato mabe ezali mitambo mpo na kosopa makila, kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango. Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko. Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama. Eleki malamu kozala moto pamba mpe kozala na mosali, na esika ya komimona moto monene mpe kozanga bilei. Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te. Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele. Moto mabe alingaka misuni ya bato mabe, kasi mosisa ya bayengebene ebotaka mingi. Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi. Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye. Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya. Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye. Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo, kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta. Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.