Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola. Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi. Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe ; kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango. Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe. Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya, kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika. Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya. Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye. Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?
Tanga Masese 11
Yoka Masese 11
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 11:24-31
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo