Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo. Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe. Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia. Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele. Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia. Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo. Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi. Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga. Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa. Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye. Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama. Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu. Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe.
Tanga Masese 11
Yoka Masese 11
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 11:10-23
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo