Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye. Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka. Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango. Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa. Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko. Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango. Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi. Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo. Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
Tanga Masese 11
Yoka Masese 11
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 11:1-9
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo