Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Masese 10:15-32

Masese 10:15-32 MNB

Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango. Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi, kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu. Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu. Moto oyo abombaka koyina kati na motema na ye azali na bibebu ya lokuta, mpe moto oyo atongaka bato azali zoba. Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya. Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te. Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele, kasi zoba akokufa na bozoba na ye. Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango. Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele. Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama. Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela. Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi. Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse. Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba. Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe. Moto ya sembo akotikala kokweya te, kasi bato mabe bakovanda na mokili te. Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama. Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.