Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mishe 5

5
Mokonzi akobotama na Beteleemi
1Bongo yo, Beteleemi Efrata,
atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda,
ye oyo akokonza Isalaele
akowuta kati na yo.
Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza,
wuta na ebandeli ya tango.
2Yango wana, Yawe akosundola Isalaele
kino tango mwasi oyo azali
na pasi ya kobota akobota,
mpe ndambo ya bandeko na ye,
oyo bakotikala bakozonga
epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
3Akotelema mpe akobatela bibwele na ye
na nguya na Yawe,
na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ;
mpe bakovanda na kimia,
pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye
ekopanzana mokili mobimba.
4Boye, akozala kimia na bango !
Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi
kati na mokili na biso mpe na bandako na biso,
oyo batonga makasi,
tokotindela bango babateli sambo ya bibwele
mpe bakambi mwambe ya bato
mpo na kobundisa bango.
5Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga.
Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri
tango bakokota na makasi na mabele na biso
mpe na bandelo na yango.
6Batikali ya Jakobi bakozala,
kati na bikolo ebele lokola mamwe
oyo ewuti epai na Yawe,
mpe na likolo ya matiti lokola londende
oyo ekweyaka na makasi ya moto te
to mpe etalelaka moto te.
7Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota,
na kati-kati ya bikolo ebele,
lokola nkosi kati na banyama ya zamba,
lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme :
tango elekaka kati na etonga ya bameme,
ekangaka mpe epasolaka yango,
mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
8Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo,
mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !
9« Na mokolo wana, » elobi Yawe,
« nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,
10nakobebisa bingumba ya mokili na yo
mpe nakokweyisa bandako na yo,
oyo batonga makasi ;
11nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki,
mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ;
12nakobebisa banzambe ya bikeko
oyo ezali kati na yo,
mpe okofukamela lisusu te bikeko
oyo maboko na yo esilaki kosala ;
13nakobebisa makonzi ya bule
ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo
mpe nakobebisa bingumba na yo.
14Na kanda na Ngai ya makasi,
nakozongisa mabe na mabe na bikolo
oyo etosaki Ngai te. »

Currently Selected:

Mishe 5: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo