Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. › Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe, to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene. Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo. Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi. Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. › Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi. Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo. Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye. Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo. Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. › Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te. Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ? Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ? Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
Tanga Matayo 5
Yoka Matayo 5
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Matayo 5:33-48
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo