Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Matayo 21:1-22

Matayo 21:1-22 MNB

Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale. Alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango. Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende. Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › » Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango. Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! » Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ? Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile ! Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga. Alobaki na bango : — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi ! Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? » Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki : — Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ? Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo. Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.