Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Matayo 13:36-58

Matayo 13:36-58 MNB

Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga. Yesu azongisaki : — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto. Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana ; monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu. Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili : Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe. Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu. Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana. Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko. Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango. Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge. Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe. Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo, bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu. Boni, bososoli makambo oyo nyonso ? Bazongisaki : — Iyo ! Bongo, Yesu alobaki na bango : — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala. Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ? Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ? Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi ? » Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te. Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.