Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale. Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili. Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba :
— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ; kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ; kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye :
— Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ?
Yesu azongiselaki bango :
— Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te. Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese :
ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ;
mpe atako bazali koyoka, basosola te.
Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami :
« Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;
miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;
bakangi penza matoyi mpe miso na bango,
noki te miso na bango emona,
matoyi na bango eyoka,
mitema na bango esosola,
mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka. Nazali koloba na bino penza ya solo : basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni : Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela. Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo. Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye. Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te. Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye. Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki. Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki. Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi ? ›
Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo ! ›
Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango ? ›
Nkolo elanga azongisaki : ‹ Bokende te ! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango. Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye. Nkona yango eleki bankona nyonso na moke ; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene ; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese. Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki :
« Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese,
nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »