Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Matayo 12:1-21

Matayo 12:1-21 MNB

Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango. Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu : — Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba. Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala, ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ? Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ? Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo ! Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te ! Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba. Sima na Yesu kolongwa na esika yango, akendeki na ndako na bango ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye. Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ? Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko. Bongo, alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo. Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu. Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso. Kasi apekisaki bango kobeta ata lisolo na tina na Ye. Asalaki bongo mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama : « Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya. Akoswana te mpe akoganga te, bakoyoka mongongo na Ye te na babalabala. Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa kino akosala ete bosembo elonga mpe bikolo nyonso ya bapaya etia elikya na Kombo na Ye. »