Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 24:36-53

Luka 24:36-53 MNB

Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino ! Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima. Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango. Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ? Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango. Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. » Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi. Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ; mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. » Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo. Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango. Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo. Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.