Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama. Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa. Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela. Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki : — Likambo nini oyo ezali kosalema ? Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka ! Agangaki : — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona. Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
Tanga Luka 18
Yoka Luka 18
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Luka 18:31-43
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo