Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato :
— Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele !
Yesu azongisaki :
— Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !
Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki :
— Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ; pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.
Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo. Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili. Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te. Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa. Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia.
Bongo, Nkolo alobaki na ye :
— Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe. Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ? Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.
Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka. Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !
Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu :
— Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso !
Yesu azongisaki :
— Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.
Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma ! Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. » Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo, kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.
Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge, na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.