Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Jozue 19

19
Eteni ya mabele ya libota ya Simeoni
1Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda. 2Bazwaki lokola libula :
Beri-Sheba, Sheba, Molada, 3Atsari-Shuwali, Bala, Atsemi, 4Elitoladi, Betuli, Orima, 5Tsikilagi, Beti-Marikaboti, Atsari-Suza, 6Beti-Lebaoti mpe Sharueni : bingumba nyonso ezalaki zomi na misato elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
7Ayini, Rimoni, Eteri mpe Ashani : bingumba nyonso ezalaki minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike 8mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi.
Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. 9Bazwaki eteni ya mabele ya libota ya Simeoni kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda, pamba te eteni ya mabele ya libota ya Yuda ezalaki monene koleka. Yango wana, bakitani ya Simeoni bazwaki libula na bango kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda.
Eteni ya mabele ya libota ya Zabuloni
10Na mbala ya misato, zeke ekweyaki epai ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango :
Mondelo ya libula na bango ekendeki kino na Saridi. 11Longwa wana, emataki na ngambo ya weste, pene ya Mareala, ekendeki kotutana na Dabesheti, kino na lubwaku oyo ezali pene ya Yokineami. 12Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia. 13Ekobaki koleka na ngambo ya este kino na Gati-Eferi mpe Ita-Katsini, ebimelaki na Rimoni mpe ebalukaki na ngambo ya Neya. 14Mondelo yango ezingelaki Anatoni, na ngambo ya nor, mpe esukaki na Lubwaku ya Yifita-Eli.
15Ekamataki mpe lisusu, Katati, Naalali, Shimironi, Yideala mpe Beteleemi : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
16Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya libota ya Isakari
17Na mbala ya minei, zeke ekweyaki epai ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango. 18Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na :
Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi, 19Afarayimi, Shiyoni, Anakarati, 20Rabiti, Kishioni, Abetsi, 21Remeti, Eyini-Ganimi, Eyini-Ada mpe Beti-Patseti.
22Mondelo na yango etutanaki na Tabori, Shakatsima mpe Beti-Shemeshi, bongo esukaki na Yordani.
Bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
23Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya libota ya Aseri
24Na mbala ya mitano, zeke ekweyaki epai ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango. 25Eteni ya mabele na bango ezalaki :
Elikati, Ali, Beteni, Akishafi, 26Alameleki, Ameadi mpe Misheali. Mondelo na yango etutanaki na Karimeli mpe Shiyori-Libinati na ngambo ya weste ; 27ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi. 28Ekendeki kino na Ebron, Reobi, Amoni mpe Kana kino na Sidoni, engumba monene. 29Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi, 30ya Uma, ya Afeki, ya Reobi.
Bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
31Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya libota ya Nefitali
32Na mbala ya motoba, zeke ekweyaki epai ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
33Eteni ya mabele na bango ezalaki longwa na Elefi, longwa na terebente oyo ezali na Tsananimi, lekela na Adamu-Nekebi mpe Yabineyeli kino na Lakumi mpe esukaki na Yordani. 34Mondelo na yango ebalukaki na ngambo ya weste na Azinoti-Tabori mpe ekendeki kobimela na Ukoki, etutanaki na Zabuloni, na ngambo ya sude, na Aseri, na ngambo ya weste, mpe Yuda ; Yordani, na ngambo ya este.
35Bingumba batonga makasi ezalaki : Tsidimi, Tseri, Amati, Rakati, Kinereti, 36Adama, Rama, Atsori ; 37Kedeshi, Edreyi, Eyini-Atsori ; 38Yireoni, Migidali-Eli, Oremi, Beti-Anati mpe Beti-Shemeshi.
Bingumba nyonso ezalaki zomi na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
39Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya libota ya Dani
40Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango. 41Libula na bango ya mabele ezalaki :
Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi ; 42Shaalabini, Ayaloni, Yitila ; 43Eloni, Timinata, Ekroni, 44Eliteke, Gibetoni, Baalati, 45Yeudi, Bene-Beraki, Gati-Rimoni ; 46mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa.
47Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.
48Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya Jozue
49Tango bana ya Isalaele basilisaki kokabola mokili na biteni na zeke, bapesaki Jozue, mwana mobali ya Nuni, libula moko kati na bango. 50Kolanda mitindo na Yawe, bapesaki ye engumba oyo asengaki ; ezali Timinati-Sera, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bongo Jozue atongaki engumba yango mpe akomaki kovanda kuna.
51Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili.

Currently Selected:

Jozue 19: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo