Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yoane 8:1-11

Yoane 8:1-11 MNB

Kasi Yesu akendeki na ngomba ya banzete ya olive. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bakumbaki mwasi moko oyo bakutaki azali kosala ekobo ; batambolisaki ye kati na ebele ya bato mpe batiaki ye liboso ya Yesu, na miso ya bato nyonso. Balobaki na Yesu : — Moteyi, mwasi oyo asali ekobo ; bakuti ye penza azali kosala yango ! Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ? Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele. Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango : — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso. Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele. Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo, Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye : — Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi ? Boni, ata moko te akateli yo etumbu ? Mwasi azongisaki : — Nkolo, moko te ! Bongo Yesu alobaki na ye : — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]