Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Kobima 6:1-12

Kobima 6:1-12 MNB

Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye. Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Nazali Yawe. Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe. Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya. Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai. Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi. Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito. Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. » Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango. Yawe alobaki na Moyize : — Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ?