Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni. Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. Alobaki : — Botala, namoni Likolo efungwami mpe Mwana na moto atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe ! Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye, bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo Saulo. Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni azalaki kosambela na koloba : — Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai ! Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.
Tanga Misala ya Bantoma 7
Yoka Misala ya Bantoma 7
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Misala ya Bantoma 7:54-60
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo