Mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato, elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo. Festisi alobaki : — Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ! Lisanga mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye, na Yelusalemi mpe awa kati na Sezarea, bazalaki koganga ete asengeli kokufa. Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome. Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna. Pamba te namoni ete tina ezali te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.
Tanga Misala ya Bantoma 25
Yoka Misala ya Bantoma 25
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Misala ya Bantoma 25:23-27
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo