Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Misala ya Bantoma 2:2-4

Misala ya Bantoma 2:2-4 MNB

Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana. Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.