Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye. Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ; mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi ? » Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ? Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ? Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › » Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye : « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. » Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani. Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi. Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki. Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.
Tanga 2 Samuele 19
Yoka 2 Samuele 19
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: 2 Samuele 19:9-20
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo