Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! » Sango ekomelaki Joabi na koloba : « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. » Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba : « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. » Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba. Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi : « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Mwana na ngai ya mobali ! » Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo. Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki. Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »
Tanga 2 Samuele 19
Yoka 2 Samuele 19
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: 2 Samuele 19:1-8
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo