Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Samuele 18

18
Kufa ya Abisalomi
1Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama. 2Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango. 3Kasi basoda balobaki :
— Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.
4Mokonzi azongisaki :
— Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu.
Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke. 5Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. »
Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi. 6Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi. 7Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele. 8Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.
9Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu. 10Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi :
— Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.
11Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango :
— Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba.
12Kasi moto yango azongiselaki Joabi :
— Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. » 13Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.
14Joabi alobaki :
— Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo.
Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.
15Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye. 16Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango. 17Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
18Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. »
Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »
Sango ya kufa ya Abisalomi
19Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi :
— Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.
20Joabi alobaki na ye :
— Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.
21Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi :
— Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni.
Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.
22Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi :
— Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi.
Kasi Joabi azongisaki :
— Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.
23Ayimaatsi alobaki :
— Oyo ekoya eya ! Nandimi kokima mbangu.
Joabi alobaki :
— Kima mbangu !
Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi.
24Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko. 25Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki : « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. »
Moto azalaki kaka kopusana. 26Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke :
— Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko.
Mokonzi alobaki :
— Ye mpe amemi basango malamu.
27Mokengeli alobaki :
— Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki.
Mokonzi alobaki :
— Azali moto malamu, azali koya na basango malamu.
28Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi :
— Makambo nyonso ezali malamu !
Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki :
— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai.
29Mokonzi atunaki :
— Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ?
Ayimaatsi azongisaki :
— Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.
30Mokonzi alobaki :
— Telema pembeni mpe zela ngai wana.
Boye akendeki mpe atelemaki wana.
31Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki :
— Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.
32Mokonzi atunaki na moto ya Kushi :
— Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ?
Moto ya Kushi azongisaki :
— Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.

Currently Selected:

2 Samuele 18: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo