2 Samuele 13
13
Aminoni mpe Tamari
1Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka. 2Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola. 3Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi. 4Atunaki Aminoni :
— Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ?
Aminoni alobaki na ye :
— Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
5Yonadabi alobaki na ye :
— Oh, sala boye : « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye : ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › »
6Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
7Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
8Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango. 9Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki :
— Bimisa bato nyonso libanda.
Bato nyonso babimaki.
10Aminoni alobaki na Tamari :
— Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo.
Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala. 11Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye :
— Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.
12Tamari alobaki na ye :
— Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te. 13Ekosukela ngai ndenge nini ? Nakokende wapi na soni na ngai ? Mpe yo okozala ndenge nini ? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele ! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai.
14Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.
15Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari :
— Telema mpe bima !
16Tamari azongiselaki ye :
— Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai !
Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye. 17Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. » 18Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata. 19Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi. 20Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! »
Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.
21Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi. 22Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
Abisalomi abomi Aminoni
23Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi. 24Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
— Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo.
25Mokonzi azongisaki :
— Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo.
Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye. 26Abisalomi alobaki lisusu :
— Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso.
Mokonzi atunaki ye :
— Mpo na nini akende elongo na yo ?
27Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.
28Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye :
— Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.
29Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki. 30Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi : « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. » 31Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka. 32Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye. 33Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
34Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
35Yonadabi alobaki na mokonzi :
— Tala ! Bana mibali ya mokonzi bazali koya ! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki.
36Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye. 37Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.
38Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato. 39Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.
Currently Selected:
2 Samuele 13: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.