2 Bakonzi 2
2
Eliya amemami na likolo
1Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali. 2Eliya alobaki na Elize :
— Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli.
Elize azongisaki :
— Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te !
Boye bakendeki na Beteli.
3Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye :
— Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ?
Elize azongisaki :
— Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !
4Eliya alobaki na Elize :
— Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko.
Elize azongisaki :
— Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te !
Boye bakendeki na Jeriko.
5Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye :
— Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ?
Elize azongisaki :
— Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !
6Eliya alobaki na ye :
— Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani.
Elize azongisaki :
— Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te !
Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.
7Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani. 8Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki. 9Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize :
— Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo.
Elize azongisaki :
— Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.
10Eliya alobaki :
— Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango ; soki te, okozwa yango te.
11Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi. 12Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! »
Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale. 13Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani. 14Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki : « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya ? »
Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi.
15Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! »
Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele. 16Balobaki :
— Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku.
Elize azongisaki :
— Te, botinda bango te !
17Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki :
— Botinda bango.
Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te. 18Tango bazongaki epai ya Elize oyo atikalaki na Jeriko, Elize alobaki na bango :
— Napekisaki bino te kokende ?
Elize apetoli mayi
19Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize :
— Oh nkolo ! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.
20Elize alobaki :
— Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati.
Bamemelaki ye yango 21mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »
22Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.
23Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »
24Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango. 25Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.
Currently Selected:
2 Bakonzi 2: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.