Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Bakonzi 13

13
Yoakazi, mokonzi ya Isalaele
1Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo. 2Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango. 3Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali. 4Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele. 5Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso. 6Kasi batikaki te masumu ya libota ya Jeroboami oyo akweyisaki na yango Isalaele. Bakobaki kaka na yango ; mpe ekeko ya nzambe mwasi Ashera etikalaki kaka ya kotelema kati na Samari. 7Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo.
8Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yoakazi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 9Yoakazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Joasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Joasi, mokonzi ya Isalaele
10Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba. 11Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango. 12Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 13Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe Jeroboami akitanaki na ye na bokonzi. Bakundaki Joasi kati na Samari esika moko na bakonzi ya Isalaele.
Bokono mpe kufa ya Elize
14Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo :
— Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele !
15Elize alobaki na ye :
— Zwa tolotolo moko mpe ndambo ya makonga ya mike.
Joasi asalaki bongo. 16Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele :
— Simba tolotolo na maboko na yo.
Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi. 17Elize alobaki :
— Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este.
Joasi afungolaki yango. Elize alobaki :
— Beta !
Joasi abetaki.
Elize alobaki :
— Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki.
18Bongo Elize abakisaki :
— Zwa makonga.
Mokonzi azwaki yango. Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele :
— Beta yango na mabele.
Joasi abetaki yango mbala misato mpe atikaki. 19Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki :
— Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato.
20Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso. 21Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki.
22Azaeli, mokonzi ya Siri, anyokolaki Isalaele, na tango ya bokonzi ya Yoakazi. 23Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye.
24Azaeli, mokonzi ya Siri, akufaki, mpe Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 25Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.

Currently Selected:

2 Bakonzi 13: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo