1 Samuele 5
5
Sanduku kati na Asidodi mpe Ekroni
1Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi. 2Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni. 3Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye. 4Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki. 5Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.
6Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu. 7Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki :
— Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye ; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.
8Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango :
— Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele.
Bazongisaki :
— Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati.
Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.
9Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo. 10Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni.
Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki :
— Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.
11Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango :
— Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso.
Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango. 12Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo.
Currently Selected:
1 Samuele 5: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.