1 Samuele 30
30
Davidi abebisi bato ya Amaleki
1Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango. 2Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango. 3Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu. 4Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela. 5Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali.
6Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye. 7Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango. 8Bongo Davidi atunaki Yawe :
— Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ?
Yawe azongiselaki ye :
— Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.
9Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki ; 10pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda.
11Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia. 12Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato. 13Davidi atunaki ye :
— Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi ?
Azongiselaki ye :
— Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela. 14Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.
15Davidi atunaki ye :
— Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ?
Azongisaki :
— Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.
16Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda. 17Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki. 18Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale. 19Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso. 20Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba : « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. »
21Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote. 22Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki :
— Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende.
23Kasi Davidi alobaki :
— Te, bandeko na ngai ya mibali ! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso ! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso. 24Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba ? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko.
25Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele.
26Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »
27Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri ; 28mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa ; 29mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni ; 30epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki ; 31epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.
Currently Selected:
1 Samuele 30: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.