1 Samuele 27
27
Davidi epai ya bato ya Filisitia
1Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. » 2Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati. 3Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli. 4Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.
5Davidi alobaki na Akishi : « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo ? »
6Na mokolo wana, Akishi apesaki ye engumba ya Tsikilagi. Yango wana Tsikilagi ekoma kino na mokolo ya lelo engumba ya bakonzi ya Yuda. 7Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei.
8Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito. 9Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi.
10Tango Akishi atunaki :
— Bobundi wapi lelo ?
Davidi azongisaki :
— Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.
11Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo : « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia. 12Akishi atielaki Davidi motema mpe alobaki : « Lokola Davidi amiyinisi na miso ya Isalaele, bato na ye, akozala mosali na ngai mpo na libela. »
Currently Selected:
1 Samuele 27: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.