1 Samuele 21
21
1Bongo Davidi akendeki, mpe Jonatan azongaki na engumba.
Davidi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki
2Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi :
— Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ?
3Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki :
— Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai : « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko. 4Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.
5Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi :
— Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.
6Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe :
— Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.
7Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso. 8Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.
9Davidi atunaki Ayimeleki :
— Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo ? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.
10Nganga-Nzambe azongisaki :
— Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente ; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo ; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana.
Davidi alobaki :
— Mopanga moko te ekokani na yango ; pesa ngai yango.
Davidi kati na mboka Gati
11Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati. 12Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › »
13Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati. 14Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu. 15Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ? 16Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma ? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai ? »
Currently Selected:
1 Samuele 21: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.