Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

1 Bakonzi 7

7
Salomo atongi ndako ya mokonzi
1Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi ; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango.
2Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele ; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
3Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi : molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano. 4Maninisa na yango ezalaki na mipanzi nyonso ya ndako mpe ezalaki etalana yango na yango, na ba-etaje nyonso misato. 5Bikuke na yango nyonso ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, mpe ezalaki etalana na ba-etaje nyonso misato.
6Salomo atongaki lisusu na makonzi, ndako moke ya kokotela ya bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse, mpe ezalaki na motondo likolo ya makonzi. 7Atongaki lisusu ndako ya kiti ya bokonzi epai wapi azalaki kosambisa bato. Alatisaki yango mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo.
8Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela ; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.
9Batongaki bandako oyo nyonso na mabanga bakata kitoko mpe babongisa na si na bangambo nyonso mibale. Basalelaki yango kobanda na miboko kino na mitondo, mpe na libanda, mpo na bamir ya lopango ya monene. 10Basalelaki mabanga minene ya talo mpo na kotonga miboko oyo ezalaki na molayi ya bametele pene minei to mitano. 11Na likolo ya miboko yango, batiaki mabanga oyo bakata mpe mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
12Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.
Bisalelo ya bronze kati na Tempelo
Makonzi ya bronze
(2Ma 2.10-13)
13Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami 14oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.
(2Ma 3.15-17)
15Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene. 16Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe : moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. 17Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo. 18Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko. 19Mito ya makonzi ya ndako moke ya kokotela ezalaki ya bametele pene mibale na bosanda, mpe batiaki na likolo na yango bililingi ya fololo ya lisi. 20Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama. 21Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi. 22Likolo ya likonzi moko na moko, atiaki bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki ndenge wana nde asilisaki mosala ya kotelemisa makonzi.
Nzungu ya monene ya bronze
(2Ma 4.2-5)
23Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano. 24Na se ya monoko ya nzungu yango ya monene, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bakolokente oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko. 25Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati. 26Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei.
Bashario ya bronze
27Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze : evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda. 28Tala ndenge basalaki bivandelo yango : bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango. 29Irami asalaki bililingi ya nkosi, ya bangombe mpe ya basheribe, mpe abambaki yango likolo ya bitando mpe likolo ya bibende mosusu ya bronze. Ezalaki na bililingi ya singa ya bafololo na se mpe na likolo ya bangombe mpe ya bankosi. 30Shario moko na moko ezalaki na bapine minei ya bronze mpe na bibende ya bronze mpo na kosimba bapine. 31Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na lidusu evimba, na lolenge ya libungutulu ; bongo eteni na yango oyo ezalaki ya kovimba ezalaki na basantimetele pene tuku mitano na bosanda mpe basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene ; mpe nzungu ya monene evandaki na lidusu yango. Irami abambaki bililingi na lidusu yango. Molayi mpe mokuse ya evandelo yango ezalaki ndenge moko, ezalaki na lolenge ya libungutulu te. 32Bapine nyonso minei ezalaki na se ya evandelo, mpe bakangisaki bibende oyo esimbaki bapine yango na mipanzi. Pine moko na moko ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene. 33Basalaki bapine yango lokola bapine ya shareti : bibende oyo esimbaki bapine, bajante, mabende ya mike oyo ezalaka na kati ya pine mpe oyo esungaka pine mpo na kobaluka, nyonso ezalaki ya bronze banyangwisa na moto. 34Mabende nyonso minei oyo ezalaki lokola makolo ezalaki na basonge nyonso minei mpe ekanganaki na evandelo. 35Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na elilingi ya motole ya basantimetele pene tuku mibale na mitano na monene ; mpe elilingi yango ezalaki zingazinga ya lidusu, na eteni oyo ezalaki ya kovimba. Na likolo ya evandelo, bibende oyo balekisaki na bangambo ekanganaki na evandelo mpo na kolendisa evandelo yango. 36Na likolo ya bibende yango, babambaki bililingi ya basheribe, ya bankosi mpe ya mandalala ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni. 37Asalaki ndenge moko mpo na bivandelo nyonso zomi : asalaki nyonso na bronze banyangwisa na moto, mpe ezalaki lolenge moko.
38Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko. 39Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este.
(2Ma 4.11)
40Irami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila.
(2Ma 4.7–5.1)
Irami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Yawe : 41makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango, 42bililingi ya bambuma nkama minei ya grenade ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama : milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi ; 43bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene oyo batiaki na likolo ya bivandelo, 44nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene, 45basani mpo na kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto. 46Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tsaritani. 47Bongo Salomo atiaki biloko oyo nyonso kati na Tempelo ya Yawe ; kasi mpo ete elekaki ebele, bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki.
Biloko ya wolo
(2Ma 4.19-22)
48Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; 49bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, 50basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
51Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.

Currently Selected:

1 Bakonzi 7: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo