1 Bakonzi 3
3
Salomo asengi bwanya
1Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi. 2Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe. 3Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.
(2Ma 1.2-13)
4Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana. 5Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye :
— Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
6Salomo azongisaki :
— Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi. 7Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo. 8Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi : bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza. 9Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?
10Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki. 11Nzambe alobaki na ye :
— Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo, 12nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo. 13Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo. 14Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.
15Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani ; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso.
Salomo akati makambo na bosembo
16Basi ya ndumba mibale bayaki epai ya mokonzi mpe batelemaki liboso na ye. 17Moko na bango alobaki :
— Nabondeli yo, nkolo na ngai, yoka ngai ! Ngai mpe mwasi oyo, tovandaka ndako moko. Tozalaki na ye na ndako tango nabotaki mwana. 18Na mokolo ya misato sima na mbotama ya mwana na ngai, mwasi oyo mpe abotaki. Tozalaki kaka biso moko kati na ndako, moto mosusu azalaki te, kaka biso mibale. 19Nzokande, na butu, alalelaki mwana na ye, mpe mwana yango akufaki. 20Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye ; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai. 21Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki !
22Mwasi mosusu alobaki :
— Te, ezali lokuta ! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo !
Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu :
— Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai !
Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi.
23Mokonzi alobaki :
— Moko azali koloba : « Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi mwana ya kokufa azali nde mwana na yo ! » Wana mosusu azali mpe koloba : « Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi mwana ya bomoi azali nde mwana na ngai ! »
24Boye, mokonzi alobaki lisusu :
— Bomemela ngai mopanga !
Bamemelaki mokonzi mopanga. 25Mokonzi apesaki mitindo :
— Bokata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, bopesa eteni moko na mwasi moko ; mpe eteni mosusu, na mwasi mosusu.
26Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi :
— Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te !
Kasi mwasi mosusu alobaki :
— Kata ye ! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te !
27Boye, mokonzi akataki likambo, alobaki :
— Boboma mwana te ! Bopesa mwana oyo azali na bomoi epai ya mwasi ya liboso, pamba te ye nde azali mama na ye.
28Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.
Currently Selected:
1 Bakonzi 3: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.