1 Bakonzi 22
22
Mokonzi Akabi akani kobotola engumba Ramoti
(2Ma 18.1-27)
1Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato. 2Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele.
3Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye : « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso ! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. » 4Alobaki mpe na Jozafati :
— Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ?
Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele :
— Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.
Mosakoli Mishe mpe basakoli ya lokuta
5Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele :
— Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
6Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango :
— Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Bazongiselaki ye :
— Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.
7Kasi Jozafati atunaki lisusu :
— Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe ?
8Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati :
— Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila.
Jozafati alobaki :
— Tika ete mokonzi aloba bongo te !
9Bongo, mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye : « Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. » 10Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. 11Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › »
12Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga ; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
13Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye :
— Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi !
14Kasi Mishe azongisaki :
— Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
15Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye :
— Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?
Mishe azongisaki :
— Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
16Kasi mokonzi alobaki na ye :
— Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?
17Mishe azongisaki :
— Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
18Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati :
— Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe !
19Mishe alobaki :
— Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 20Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? »
Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. 21Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. »
Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? »
22Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. »
Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. »
23Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo !
24Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki :
— Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?
25Mishe azongisaki :
— Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
26Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo :
— Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. 27Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
28Mishe alobaki :
— Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te !
Abakisaki :
— Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Kufa ya Akabi
(2Ma 18.28-34)
29Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. 30Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : « Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. »
Boye mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba. 31Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar : « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »
32Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Balandaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi. 33Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar, basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. 34Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. »
35Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri ; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar. 36Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye ! »
37Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari ; mpe bakundaki ye kuna. 38Basukolaki shar na ye na liziba moko oyo ezalaki na Samari epai wapi basi ya ndumba bazalaki kosukola ; mpe bambwa elembolaki makila na ye kolanda maloba oyo Yawe alobaki.
39Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 40Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Jozafati mokonzi ya Yuda
(2Ma 20.31–21.1)
41Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele. 42Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. 43Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. 44Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. 45Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele.
46Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 47Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi.
48Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna.
49Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri ; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi. 50Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati : « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa ! »
Kasi Jozafati aboyaki.
51Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Akazia, mokonzi ya Isalaele
52Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi. 53Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu.
54Asalelaki nzambe Bala mpe agumbamelaki yango ; na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge kaka tata na ye asalaki.
Currently Selected:
1 Bakonzi 22: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.