1 Bakonzi 16
16
1Yawe alobaki na Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha : 2« Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai, 3nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. 4Bambwa ekolia bato ya Baesha oyo bakokufa kati na engumba mpe bandeke ya likolo ekolia bato oyo bakokufa na bilanga. »
5Makambo mosusu oyo etali mokonzi Baesha mpe misala minene oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 6Baesha akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Tiritsa ; mpe Ela, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 7Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo : ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami ; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.
Ela, mokonzi ya Isalaele
8Tango Asa, mokonzi ya Yuda, asalaki mibu tuku mibale na motoba na bokonzi ; Ela, mwana mobali ya Baesha, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale na Tiritsa.
9Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa. 10Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi. 11Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha ; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye. 12Boye, Zimiri asilisaki koboma libota nyonso ya Baesha kolanda Liloba na Yawe, oyo elobamaki mpo na kotelemela Baesha na nzela ya mosakoli Jewu ; 13likolo ya masumu nyonso oyo Baesha elongo na mwana na ye ya mobali Ela basalaki mpe oyo ememaki Isalaele mobimba na libebi ; masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
14Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Ela, misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
15Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi ; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo.
Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango. 16Tango bato ya Isalaele oyo bazalaki kati na molako bayokaki ete Zimiri asali likita mpo na kotelemela mokonzi Asa mpe abomaki ye, bakomisaki kaka na mokolo wana Omiri oyo azalaki mokonzi ya mampinga, mokonzi ya Isalaele kati na molako. 17Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa. 18Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto. 19Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi.
20Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zimiri mpe botomboki na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
21Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri. 22Kasi bato oyo bazalaki kolanda Omiri bamonanaki makasi koleka bato oyo bazalaki kolanda Tibini, mwana mobali ya Ginati. Boye, Tibini akufaki mpe Omiri akitanaki na ye na bokonzi.
23Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na moko, Omiri akomaki mokonzi ya Isalaele. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi, mpe kati na mibu zomi na mibale wana, akonzaki mpe engumba Tiritsa mibu motoba. 24Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.
25Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye. 26Atambolaki na banzela nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
27Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Omiri : misala oyo asalaki mpe nguya oyo alakisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 28Omiri, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Akabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Akabi, mokonzi ya Isalaele
29Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale. 30Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye. 31Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango. 32Akabi atongaki etumbelo mpo na nzambe Bala kati na ndako oyo atongaki mpo na yango, na Samari. 33Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
34Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.
Currently Selected:
1 Bakonzi 16: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.