1 Bakonzi 13
13
Moto na Nzambe akei na Beteli
1Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa. 2Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › »
3Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo :
— Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.
4Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki :
— Bokanga ye !
Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye. 5Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe.
6Mokonzi alobaki na moto na Nzambe :
— Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga.
Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso. 7Bongo mokonzi alobaki na moto na Nzambe :
— Tokende na ndako mpo ete ozwa eloko ya kolia mpe napesa yo kado.
8Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi :
— Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo. 9Pamba te Yawe apesaki ngai mitindo oyo : « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
10Boye, akendeki na nzela mosusu mpe azongaki te na nzela oyo ayelaki na Beteli.
11Nzokande, mosakoli moko ya mobange azalaki kovanda na Beteli ; bana na ye ya mibali bayaki koyebisa ye makambo nyonso oyo moto na Nzambe asalaki na Beteli, na mokolo wana, mpe oyo alobaki na mokonzi.
12Tata na bango atunaki bango :
— Azongi na nzela nini ?
Bana na ye ya mibali balakisaki ye nzela oyo moto na Nzambe, oyo awutaki na Yuda, azongelaki. 13Bongo alobaki na bana na ye ya mibali :
— Bobongisela ngai ane.
Sima na bana na ye kobongisela ye ane, amataki likolo na yango, 14alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye :
— Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda ?
Moto na Nzambe azongisaki :
— Iyo, ezali nde ngai.
15Mosakoli alobaki na ye :
— Yaka kolia mesa moko na ngai, na ndako na ngai.
16Moto na Nzambe alobaki :
— Nakoki te kozonga to kotambola nzela moko na yo ; nakoki mpe te kolia lipa to komela mayi elongo na yo na esika oyo, 17pamba te Yawe alobaki na ngai : « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
18Mosakoli ya mobange azongisaki :
— Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe : « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. »
Nzokande azalaki kokosa ye.
19Boye, moto na Nzambe azongaki nzela moko na ye na Beteli, aliaki mpe amelaki kati na ndako na ye.
Yawe abomi moto na Nzambe
20Wana bavandaki na mesa, Yawe alobaki na mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe, 21mpe agangelaki moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda :
— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mpo ete otosi te Liloba na Yawe mpe obateli te etinda oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo ; 22mpo ete ozongi, olie lipa mpe omeli mayi na esika oyo napekisaki yo kolia to komela, bakokunda ebembe na yo te kati na kunda ya batata na yo. »
23Tango moto na Nzambe asilisaki kolia mpe komela, mosakoli ya mobange abongisaki ane ya moto na Nzambe oyo azongisaki sima, 24mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye. 25Bato oyo bazalaki koleka bamonaki ebembe elali na nzela mpe nkosi etelemi pembeni na yango. Bakendeki kopesa sango kati na engumba epai wapi mosakoli ya mobange azalaki kovanda. 26Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki :
— Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye.
27Mosakoli ya mobange alobaki na bana na ye ya mibali :
— Bobongisela ngai ane !
Bana na ye ya mibali babongiselaki ye ane yango. 28Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane. 29Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye. 30Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa :
— Ah, mawa, ndeko na ngai !
31Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali :
— Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe ; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye. 32Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo.
33Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba ; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe. 34Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.
Currently Selected:
1 Bakonzi 13: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.