1 Bakonzi 12
12
Bokonzi ekabwani
Isalaele atombokeli Roboami
(2Ma 10.1–11.4)
1Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi. 2Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito. 3Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami ; bongo ye elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye :
4— Tata na yo anyokolaki biso makasi ; kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo.
5Roboami azongisaki :
— Bokende epai na bino, bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai.
Mpe bato bakendeki.
6Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango :
— Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ?
7Bazongiselaki ye :
— Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
8Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. 9Atunaki bango :
— Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? »
10Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki :
— Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene ; 11soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
12Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. » 13Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; 14alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
15Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Yawe nde asalaki bongo mpo na kokokisa liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
16Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! »
Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo. 17Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
18Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi misala makasi, kasi bana nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi. 19Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.
20Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi.
21Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki libota nyonso ya Yuda mpe libota ya Benjame, aponaki kati na bango bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa ndako ya Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami, mwana mobali ya Salomo. 22Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe : 23« Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda ; mpe bana nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ba-oyo batikali : 24‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Bokende te kobundisa bandeko na bino, bato ya Isalaele ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te Ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › »
Batosaki Liloba na Yawe mpe bazongaki na bandako na bango mpo na kotosa mitindo ya Yawe.
Lisumu ya Jeroboami
25Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.
26Jeroboami amilobelaki : « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi. 27Soki bato oyo bamati na Yelusalemi mpo na kobonza mbeka na Tempelo ya Yawe, bakopesa lisusu mitema na bango epai ya nkolo na bango, Roboami, mokonzi ya Yuda. Bakoboma ngai mpe bakozonga epai ya mokonzi Roboami. »
28Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato :
— Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.
29Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani. 30Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu. 31Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi.
32Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba. 33Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa.
Currently Selected:
1 Bakonzi 12: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.