1
Emoniseli 11:15
Mokanda na Bomoi
MNB
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »
Kokisana
Luka Emoniseli 11:15
2
Emoniseli 11:18
Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba ; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »
Luka Emoniseli 11:18
3
Emoniseli 11:3
Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »
Luka Emoniseli 11:3
4
Emoniseli 11:11
Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.
Luka Emoniseli 11:11
5
Emoniseli 11:6
Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.
Luka Emoniseli 11:6
6
Emoniseli 11:4-5
Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda ; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili. Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.
Luka Emoniseli 11:4-5
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo