1
Jozue 2:11
Mokanda na Bomoi
MNB
Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.
Kokisana
Luka Jozue 2:11
2
Jozue 2:10
Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani.
Luka Jozue 2:10
3
Jozue 2:8-9
Na butu, liboso ete banongi balala, Raabi amataki likolo ya mwanza mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.
Luka Jozue 2:8-9
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo