Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai !
Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ;
ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala
makambo oyo ezangi bosembo.
Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye,
apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.