Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami. Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.