« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,
sima na mikolo wana, »
elobi Yawe :
« Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,
nakokoma yango kati na mitema na bango,
nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na Ngai.
Moko te akoteya lisusu moninga na ye
to ndeko na ye na koloba :
‹ Yeba Yawe ! ›
Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai,
kobanda na mwana moke kino na mokolo, »
elobi Yawe,
« nakolimbisa mabe na bango
mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »