1
2 Masolo ya Kala 7:14
Mokanda na Bomoi
MNB
soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.
Kokisana
Luka 2 Masolo ya Kala 7:14
2
2 Masolo ya Kala 7:15
Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo.
Luka 2 Masolo ya Kala 7:15
3
2 Masolo ya Kala 7:16
Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela.
Luka 2 Masolo ya Kala 7:16
4
2 Masolo ya Kala 7:13
Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato
Luka 2 Masolo ya Kala 7:13
5
2 Masolo ya Kala 7:12
Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki : — Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai.
Luka 2 Masolo ya Kala 7:12