Kende na makomi

1 Timote 6:11-21 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

1 Timote 6:11-21 MNB (Mokanda na Bomoi)

Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto. Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele. Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato : Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo, Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen ! Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato. Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo. Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te. Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso !