Daniele 5:25-28
Daniele 5:25-28 MNB
Tala makomi oyo ekomami : MENE, MENE, TEKEL, PARSIN. Ndimbola ya maloba yango ezali : Mene : Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka ; Tekel : bameki kilo na yo na emekelo kilo, mpe emonani ete ozali na yo pepele ; Parsin : bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi.

