1
Ebandeli 32:28
Mokanda na Bomoi
MNB
Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.
비교
Ebandeli 32:28 살펴보기
2
Ebandeli 32:26
Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.
Ebandeli 32:26 살펴보기
3
Ebandeli 32:24
Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso.
Ebandeli 32:24 살펴보기
4
Ebandeli 32:30
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
Ebandeli 32:30 살펴보기
5
Ebandeli 32:25
Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana.
Ebandeli 32:25 살펴보기
6
Ebandeli 32:27
Sima, moto yango alobaki : — Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana. Kasi Jakobi azongisaki : — Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te.
Ebandeli 32:27 살펴보기
7
Ebandeli 32:29
Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
Ebandeli 32:29 살펴보기
8
Ebandeli 32:10
Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›
Ebandeli 32:10 살펴보기
9
Ebandeli 32:32
Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
Ebandeli 32:32 살펴보기
10
Ebandeli 32:9
Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »
Ebandeli 32:9 살펴보기
11
Ebandeli 32:11
Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.
Ebandeli 32:11 살펴보기