Matayo 1

1
Mbotama mpe bomwana ya Yesu
Molongo ya mbotama ya Yesu
1Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :
2Abrayami abotaki Izaki ;
Izaki abotaki Jakobi ;
Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;
3Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ;
Peretsi abotaki Etsironi ;
Etsironi abotaki Arami ;
4Arami abotaki Aminadabi ;
Aminadabi abotaki Nashoni,
mpe Nashoni abotaki Salima ;
5Salima abotaki Boazi na nzela ya Raabi, mwasi na ye ;
Boazi abotaki Obedi na nzela ya Rite, mwasi na ye ;
Obedi abotaki Izayi,
6mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi.
Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ;
7Salomo abotaki Roboami ;
Roboami abotaki Abiya ;
Abiya abotaki Asa ;
8Asa abotaki Jozafati ;
Jozafati abotaki Yorami ;
Yorami abotaki Oziasi ;
9Oziasi abotaki Yotami ;
Yotami abotaki Akazi ;
Akazi abotaki Ezekiasi ;
10Ezekiasi abotaki Manase ;
Manase abotaki Amoni ;
Amoni abotaki Joziasi ;
11Joziasi abotaki Yekonia mpe bandeko na ye ya mibali wana bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni.
12Sima na bana ya Isalaele kokende na bowumbu, na Babiloni,
Yekonia abotaki Shealitieli ;
Shealitieli abotaki Zorobabeli ;
13Zorobabeli abotaki Abiwudi ;
Abiwudi abotaki Eliakimi ;
Eliakimi abotaki Azori ;
14Azori abotaki Tsadoki ;
Tsadoki abotaki Akimi ;
Akimi abotaki Eliwudi ;
15Eliwudi abotaki Eleazari ;
Eleazari abotaki Matani ;
Matani abotaki Jakobi ;
16Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto.
17Kobanda na Abrayami kino na Davidi, elekaki bikeke zomi na minei ; kobanda na Davidi kino na tango oyo bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni, elekaki lisusu bikeke zomi na minei ; mpe kobanda na bowumbu, na Babiloni, kino na Klisto, elekaki lisusu bikeke zomi na minei.
Elaka ya mbotama ya Yesu
18Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu. 19Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.
20Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu. 21Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »
22Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli : 23« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »
24Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye. 25Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.

Tällä hetkellä valittuna:

Matayo 1: MNB

Korostus

Jaa

Kopioi

None

Haluatko, että korostuksesi tallennetaan kaikille laitteillesi? Rekisteröidy tai kirjaudu sisään

YouVersion käyttää evästeitä mukauttaakseen käyttökokemustasi. Käyttämällä verkkosivustoamme hyväksyt evästeiden käytön Tietosuojakäytännössämme kuvatulla tavalla