YouVersion Logo
Search Icon

Matayo 26

26
Kufa mpe lisekwa ya Yesu
Basaleli Yesu likita
(Mlk 14.1-2; Lk 22.1-2; Yn 11.47-53)
1Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye : 2« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
3Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; 4bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye. 5Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »
Basopeli Yesu malasi na Betani
(Mlk 14.3-9; Lk 7.36-50; Yn 12.1-8)
6Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, 7mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu. 8Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki :
— Mpo na nini kobebisa malasi boye ? 9Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola !
10Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango :
— Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu. 11Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te. 12Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai. 13Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.
Yuda ateki Yesu
(Mlk 14.10-11; Lk 22.3-6)
14Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe 15mpe atunaki bango :
— Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ?
Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato. 16Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu.
Bilei ya suka
(Mlk 14.12-16; Lk 22.7-13)
17Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu :
— Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?
18Azongiselaki bango :
— Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
19Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
(Mlk 14.17-21; Lk 22.14, 21-23; Yn 13.21-30)
20Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale. 21Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.
22Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :
— Nkolo, ezali ngai ?
23Yesu azongisaki :
— Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai. 24Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.
25Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki :
— Moteyi, ezali ngai ?
Yesu azongiselaki ye :
— Olobi yango.
(Mlk 14.22-25; Lk 22.15-20; 1Kl 11.23-25)
26Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba :
— Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.
27Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba :
— Bomela yango bino nyonso ; 28ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama. 29Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.
Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye
(Mlk 14.26-31; Lk 22.33-34; Yn 13.37-38)
30Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive. 31Yesu alobaki na bango :
— Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama :
« Nakobeta mobateli bibwele,
mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
32 Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.
33Petelo alobaki :
— Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.
34Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
35Petelo alobaki na Ye :
— Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te.
Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.
Yesu abondeli na Getisemane
(Mlk 14.32-42; Lk 22.39-46)
36Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango :
— Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.
37Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; 38alobaki na bango :
— Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.
39Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye :
— Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
40Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo :
— Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ? 41Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
42Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki :
— Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !
43Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. 44Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana. 45Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango :
— Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu. 46Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.
Bakangi Yesu
(Mlk 14.43-50; Lk 22.47-53; Yn 18.2-11)
47Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. 48Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »
49Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye :
— Mbote, Moteyi !
Mpe apesaki Ye beze.
50Yesu alobaki na ye :
— Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango.
Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.
51Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi. 52Kasi Yesu alobaki na ye :
— Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga. 53Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ? 54Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.
55Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato :
— Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. 56Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama.
Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.
Yesu asambi
(Mlk 14.53-65; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-23)
57Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki. 58Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
59Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, 60kasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo.
Bongo, bato mibale bayaki 61mpe balobaki :
— Moto oyo alobaki : « Ngai nakoki kobuka Tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato. »
62Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu :
— Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ?
63Kasi Yesu abatelaki kimia.
Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye :
— Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
64Yesu azongiselaki ye :
— Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
65Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki :
— Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe ! 66Bokanisi nini mpo na yango ?
Bazongisaki :
— Abongi na kufa.
67Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata 68mpe balobaki :
— Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo !
Petelo awangani Yesu
(Mlk 14.66-72; Lk 22.56-62; Yn 18.15-18, 25-27)
69Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki :
— Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
70Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso :
— Nayebi te makambo oyo ozali koloba !
71Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana :
— Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti.
72Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi :
— Nayebi moto wana te !
73Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo :
— Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.
74Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe :
— Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te !
Mpe, mbala moko, soso elelaki.
75Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.

Currently Selected:

Matayo 26: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy