1
Banzembo 68:19
Mokanda na Bomoi
MNB
Yawe Nzambe, tango omataki na likolo, omemaki bakangami, ozwaki makabo epai ya bato, ata epai ya batomboki, mpo ete okoma kovanda kuna.
Compare
Explore Banzembo 68:19
2
Banzembo 68:5
Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.
Explore Banzembo 68:5
3
Banzembo 68:6
Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
Explore Banzembo 68:6
4
Banzembo 68:20
Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo ! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
Explore Banzembo 68:20